lirikcinta.com
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu hommage à luambo makiadi – lutumba simaro

Loading...

luambo eh luambo oh
oooh ooh ooh ooh luambo eeeh eh
luambo fungola miso oh tala eh
(oh luambo oh luambo),
ndenge mokili bazali kolela yo,
batata na bamama mpe bana,
(oh luambo oh luambo)
ndenge tozali kolela yo,
liyo losalela luambo molimo,
(oh luambo oh luambo)
kolela na biso esili te eeh,.
mokolo yango eh,
moye mobimaki na cinq heure ya tongo,
molunge mokatali ngai na ndako eh
mokati ngai ndoto na zalaki kolota,
mokolo yango eh di luambo
moye mobosani ngonga mobimi na cinq heure ya tongo,
nzoko ezalaki me lembo ya mokuya
likambo lizali koyela biso,
ndoto na zalaki kolota, ndoto ya somo bakangi ngai na mongongo,
pema ekangami ngai na se ya pongi
naluki nalamuka nzoto kilo,
telephone na zuwaki lobi,
elongwe princese sango ya mabe,

basengi ngai na nzambela makasi
epai ozali nzoto ebongi te,
kolaka ya suka di luambo,
maloba ya suka olakaki biso na tembe,
lisolo kosololaki yo na lokunku
epasaki biso mwa elikia,
nzoka lokuta eh di luambo
kolobi na mama ngonga bimaka etambolaka, olakaki biso kozonga eh
koyoki nzoto mwa makasi eh,
sango de sango di luambo
sango di sango epai yo ozali,
malobi na ngai na sala noki eh noki na futa yo te,
tongo ye tana simwa ya bangonga mokili mokolingana eh,
radio eh kobelela ba telephone kwepai yo luambo akufi,
na mibabi na faute epai na koganga maboko na moto luambo,
nzambe mpona nini boye liwa yo mabe
na kolemba kokamwa yo te,
na kolela mbinzoli eboi me kobima

komotindo oh yo maloba masi ngaina monoko franco,

na fungoli lisusu radio pona ka malamu songi mabosani te
eh koboya basali kotala,

moye eleki makasi est-que ya solo
matoi nangai euti kombo yaluambo,

oyo eleki makasi mbinzoli na ngai
engungi na kati ya molunge,
tongo etani mama eh
ndoto na lotaki na tuna liwa ya bato,
kasi ndoto yango engungi

ndoto ya makambo ndoto ya mawa,
sango de sango di luambo,

sango de sango epai okendeki kosalisa nzoto,

ngai tikela maboko na kosela visa
kombo na lambalaka ya suka,

franco oboyi na kuta yo
oboyi kozela samedi ngaina lingaki koya eh,

cherie okati motema
kotikelinga lilobate naye bongo

tongo etani mama eh
ndoto na lotaki na tuna liwa ya bato,

kasi ndoto yango engungi
ndoto ya makambo ndoto ya mawa,
sango de sango di luambo,
sango de sango epai okendeki kosalisa nzoto,
ngai tikela maboko na kosela visa
kombo na lambalaka ya suka,
franco oboyi na kuta yo
oboyi kozela samedi ngaina lingaki koya eh,
cherie okati motema
kotikelinga lilobate naye bongo

lirik lagu lainnya :

YANG LAGI NGE-TRENDS...

Loading...