lirikcinta.com
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu moninga malamu – adorons l’éternel (gael music)

Loading...

molingami malamu
balingaka pona bozui te
balingaka pona bizaleli
yango nabengi yo moninga

na lisolo ya bolingo
maloba ezalaka na nguya
oyo etondi motema
suka se mbebo ebimisa

kozala na moninga malamu
ezali bozui na tango ya mpasi
moto akosungaka yo
soki mpasi ekomi
na motema nalapi ndayi
pona yo nakosala nionso
ekoki na moto kosala
olanguisi motema na ngai

yesu yesu yesu
yo moninga malamu

opekisa makambo etungisa ngai
pomobembo ya nga na yo
esalema na kimia
toleyisana mbuma bolingo

napesa yo masanjoli
okitisa kembo na yo
nabika kati na yo
ponayeba yo na mozindo

nawuti na bapota ya déception ya mokili
naza nanu na se ya emotion
monoko na nga eza nanu kilo
molimo yekolisa nga masanjoli

nakokaka kofanda kimia te
soki batangi kombo na yesu
motema epeli nga moto
posa naf*kama nasanjola
naza nanu elenge na bolingo
nayebi kolinga te
olanguisi motema na ngai
yesu moninga malamu

nabenga yo na kombo nini?
nabenga yo papa na bana
fololo ya motema
yesu elengi ya motema

yesu moninga malamu
moninga na nga
moninga ya tango nionso

yesu moninga malamu
ayebi kobomba sekele
moninga ya motema

pona yo na lapi ndayi
masiya nakosala nionso
ekoki na moto kosala

pona yo namipesi mobimba
nzoto bozui na ngai nionso
bozalisami na nga mpe lokola
moninga ya boye na mokili aza te
naza se na yo masiya
olongi motema na nga

yesu ya motema
yesu ya mabanzo
yesu ya molimo na nga

napesa yo nini masiya?
mbeka ya bomoyi na nga
yesu moninga na nga

yesu moninga na nga
moninga malamu
moninga ya tango

lirik lagu lainnya :

YANG LAGI NGE-TRENDS...

Loading...