lirikcinta.com
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu jehovah shalom (sekele ya libala) – charles mombaya

Loading...

sekele ya libala eh
sekele ya libala eh
sekele ya libala eh
bokangama na yesu jehovah shalom

baninga bayebi, ba pasteurs pe bateyi
likambo ya libala eh
tokutani mikanda na bible pe bakomi oh
likambo ya libala eh
sekele ya libala eh
bokangama na yesu jehovah shalom
mwasi akotika baboti ba ye
mobali pe akotika bakolo ba ye
bakosangana bakomi liboke lyoko
elembo ya libala
sekele ya libala
bokangama na yesu jehovah shalom

na miso na nzambe, lingomba pe mokili
bopesami ba promesses
minioko, bapasi, maládi to bisengo
bosangani kino suka
sekele ya kofanda na libala
bokangama na yesu jehovah shalom

na tango monguna akoya komeka bino
bondela se masiya eh
liloba na nzambe ezua esika monene
na kati ya libala
bokangama na yesu
tala kisi ya libala lisantu eh

libela bokosangana bokokabuana te
libala ezali décision ya nzambe papa
… pe na bisengo bokozale elongo

pesaka kilo na tata na bana eh mama
azali koteya libala oyeba mama eh
kengela libala wana bokovanda eh libela
libela bokosangana bokokabuana te
libala ezali décision ya nzambe papa
… pe na bisengo bokozale elongo

bosana lelo oyo vie na yo ya kala eh papa
akomi lelo oyo mobali ya ngana papa eh
lingaka mama na bana bokovanda eh libela

libela bokosangana bokokabuana te
libala ezali décision ya nzambe papa
… pe na bisengo bokozale elongo

kati na libala se boyokani eh mama
sekele ya ndoto esuka se na ndako mama eh
mokolo ya libala na nzela na nzambe eh libela

lirik lagu lainnya :

YANG LAGI NGE-TRENDS...

Loading...