lirikcinta.com
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu lokuta elati kazaka – charles mombaya

Loading...

sango eh, sango ewuti na africa ekomi na europa
sango ewuti na europa ezongi na africa
balobi lokuta elaki kazaka oh
ekoti na ndako na nzambe baklistu babeti maboko
lokuta elati kitoko bato mingi babanzi ekomi nde vérité

lokuta elobi fulani asali cassette ya témoignage
lokuta elobi songolo azali koyemba na kisi
lokuta elobi pakala asila nde kokufa
baklisto ya minyato balangwisi bango na lokuta
lokuta ekamati ascenseur po ekoma mbangu
vérité elandi ya n’escalier se malembe
ata ndele lokuta ekosambwa
vérité yango nde eko triompher
refrain :
mawa na bato oyo basangani pona kotongaka baninga
mawa na bato oyo lokuta ekoma vérité na monoko
bazali kobosana vérité yango nde eko triompher ata ndele bakofuta

sango eh, sango ewuti na africa ekomi na europa
sango ewuti na europa ezongi na africa
lokuta ebandaka na jardin ya eden
adam na eva baliaka mbuma se pona lokuta
lokuta ekoti na ndako ya abraham
aprésenter mwasi na ya lokola soeur na ye
lokuta ekoti na mboka na egipito
mwasi ya mokonzi alobi joseph aluka ye makangu
lokuta elangwisi bakonzi ya loma
balobi yesu asekwi te balobi bayakoli bayibaki ye
lokuta ekoti anania na safira
bakosi lingomba na biloko batekaki
lokuta ekoti lelo na lingomba ya masiya
elati kazaka bato mingi babongoli yango vérité

lokuta elati kazaka ya prophetie
lokuta ebebisi ba ministère ebele
lokuta ekaboli pe mangomba mingi
basakoli bakoti na kati ya kokabuana lelo
bato mingi bakomisi lokuta vérité
mokolo ezali vérité yango nde eko triompher
moklisto ya solo azali moto ya vérité
matoyi na ye ekoyokaka bobele se vérité
monoko na ye eyebi kotatola lokuta te
koko ya lokuta kombo na ye satana
bato ya lokuta bayebi bakokende na moto
kasi oyo ayebi vérité lobiko na ye ezali assuré

refrain :
mawa na bato oyo basangani pona kotongaka baninga (kotongaka baninga)
mawa na bato oyo lokuta ekoma vérité na monoko
bazali kobosana vérité yango nde eko triompher ata ndele bakofuta (mawa eh)
mawa na bato oyo basangani pona kotongaka baninga (kotongaka baninga tango nionso)
mawa na bato oyo lokuta ekoma vérité na monoko
bazali kobosana vérité yango nde eko triompher ata ndele bakofuta (bino kuna na ngambo boyoka)
mawa na bato oyo basangani pona kotongaka baninga
mawa na bato oyo lokuta ekoma vérité na monoko
bazali kobosana vérité yango nde eko triompher ata ndele bakofuta

lirik lagu lainnya :

YANG LAGI NGE-TRENDS...

Loading...