lirik lagu mulherengo – koffi olomide
[intro]
mulherengo, pe na por ella
[couplet 1]
oyeba otika nga na zemi
nga mwana muke, otiya avenir na nga en danger
mokolo okendaka, olakaki okozonga
sanza mobimba kutu ekokoka te
mokolo yango, mvula ezalaki konoka
yango bomonaki te pinzoli na miso na nga
sima nazali, sokoto nazeli
bileko bileki, sokoto azongaka te
nga nakoma soni ya famille na biso
nga nde mwana mabe
basekisaka nga lisusu te
balakisaka nga misapi na nzela
kaka mpo pépé na nga aza na tata te
ba masolo na yo na b’amis oyo na ngaï, se na le temps p-ssé
ndenge tolinganaka na l’amour ya folie
ndenge tolakanaka se pe likolo
ndenge tokanaka, toya kobota mwana
ndenge topesaki ye deja kombo roméo
nabosani te sokoto
[couplet 2]
balobaka, balobaka oublier le p-ssé
wana maloba ya pamba, lelo nayebi
[couplet 2]
balobaka, balobaka oublier le p-ssé
makambo mosusu babosanaka te
anguele mawa te
soki pe destinée
alea acta est
[choeur]
zonga ngo bolingo sokoto
yo nde avenir, vie nyonso ya moto eh
yaka ngo bolingo sokoto
yo nde avenir, vie nyonso ya moto
[couplet 3]
ah nga felly nsomi ya mama, nakoma ko mi lela
nakoma mwana mawa
nasala nini vraiment na nzambe po atika nga boye
nakoma malheureuse
ebale mozindo soki nayebaki qu’ezalaka bolingo nde natiaki te mosapi
[refrain]
moni na nga akeyi eh, motema ekobeta
asukoli maboko, akimi responsabilité
nani akosi ye po lelo aboya nga
[couplet 4]
moni motema ekobeta nga awa eh
navandi na ndako, loboko na litama
ndaku ovandaka te, okoyeba ndenge nini
esika mayi ekotangaka moni
[refrain]
moni na nga akeyi eh, motema ekobeta
asukoli maboko, akimi responsabilité
nani akosi ye po lelo aboya nga
[couplet 5]
eh ngaï, eh ngaï, mawa trop
eloko yango l’amour
yango nga natuna na nani
nga natuna na didas
[refrain]
moni na nga akeyi eh, motema ekobeta
asukoli maboko, akimi responsabilité
nani akosi ye po lelo aboya nga
[couplet 6]
motema, molimo ngaï nalingaka yo
y’okomisi nga yuma
motema, molimo ngaï nalingaka yo
y’okomisi nga yuma ehh
[refrain]
moni na nga akeyi eh, motema ekobeta
asukoli maboko, akimi responsabilité
nani akosi ye po lelo aboya nga
[couplet 7]
y’okeyi yolimwe
y’otiki ata adresse te
y’otiki mobulu na vie na nga ya mwasi
nalelela nani, namipesa na losambo
sokoto manzala mwana ya mama peto
anicet pedro yebisa ye
[refrain]
moni na nga akeyi eh, motema ekobeta
asukoli maboko, akimi responsabilité (eh, eh achram oje)
nani akosi ye po lelo aboya nga
[outro : dédicace]
oy’a losambo ya ba soeurs ya kilo
beloti, maka et compagnie
karington, nicolette de monaco
loboko obe na motema
tcha-tcho ata cop’ezalaka sukali
opap’s tilope
lirik lagu lainnya :
- kumpulan lirik lagu lil b lil t › lirik lagu c&c – lil b & lil t
- kumpulan lirik lagu tommy trate › lirik lagu woke up – tommy $trate
- kumpulan lirik lagu mediumrare › lirik lagu real 1 – mediumrare
- kumpulan lirik lagu show program › lirik lagu njena priča – show program
- kumpulan lirik lagu vlphv › lirik lagu painweare – vlphv
- kumpulan lirik lagu zeca pagodinho › lirik lagu o sol nascerá (a sorrir) – zeca pagodinho
- kumpulan lirik lagu david knopfler › lirik lagu weeping in the wings – david knopfler
- kumpulan lirik lagu paloalto › lirik lagu 시차적응 (jet lag) – paloalto
- kumpulan lirik lagu j lee netherlands tulip farm › lirik lagu 순정 (leaving seoul) (j.lee ver.) – j.lee & netherlands tulip farm
- kumpulan lirik lagu vivek shraya › lirik lagu document pt. ii – vivek shraya