lirikcinta.com
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu le pardon des péchés – marie misamu

Loading...

nzambe alingaki mokili yango atindaki yesu klisto
po tondimela ye oh, tozua bomoyi ya seko amen

yesu azuaki esika na nga oyo a meritaki te
tala bolingo na ye oh kati ya bomoyi na nga papa na ngai oh

lisumu ememaki liwa eh, ememaki bapasi
ememaki minioko kati ya bomoyi na nga nalingaki kokufa na ngai oh

lisumu na nga esili kolimbisama ngai nafuti eloko te
se na bolingo na ye oh kati ya bomoyi na nga oh yaya
yesu akufelaki nga, ngai napesi eloko te
yango nga napesi ye mongongo na ngai nayembela ye oh
kino liwa na nga

yesu akufelaki nga, ngai nafuti eloko te
yango nga napesi ye mongongo na ngai
yango nga napesi ye mobimba na ngai nzoto pe molimo kamata

nga nalukaki ekimelo na maboko ya bato ya mokili nazui te
kimia nalukaki na ba kwiti nazui te, solution yesu masiya
akangoli nga na minioko ya satana

nzambe alingaki mokili yango atindaki yesu klisto
po tondimela ye oh, tozua bomoyi ya seko amen

yesu azuaki esika na nga oyo a meritaki te
tala bolingo na ye oh kati ya bomoyi na nga papa na ngai oh

lisumu ememaki liwa eh, ememaki bapasi
ememaki minioko kati ya bomoyi na nga nalingaki kokufa na ngai oh

lisumu na nga esili kolimbisama ngai nafuti eloko te
se na bolingo na ye oh kati ya bomoyi na nga oh masiya

kombo mosusu te kaka yo yesu eh
ofandi na bisika eleki na likolo
nak*misi kombo na yo ya lok*mu
uh nkolo na nga
yo nde nzambe na nga
papa y’obonguani te
kombo mosusu te kaka yo yesu eh
ofandi na bisika eleki na likolo
nak*misi kombo na yo ya lok*mu
uh nkolo na nga
yo nde nzambe na nga
papa y’obonguani te

lirik lagu lainnya :

YANG LAGI NGE-TRENDS...

Loading...