lirikcinta.com
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu la beauté d’une femme – mbilia bel

Loading...

mbanda na ngai nayokaka ye na sango
lelo oyo tokunani tomonani nzoka azalaka boye
lokito ya moto okoyoka na mosika
okomitia ba idées ya zoba ebongi otala na miso
nalala mpongi te akotinda tinda maloba
nabanzaki azali mwana ya nzambe nzoka azali mwana ya moto lokola ngai
lelo tokutani, boni akitisi elongi?
ofingaka ngai na mosika lelo omoni ngai nazali elombe ya mwasi?

pasi ya pamba kufa tango yo nde moleki nzela
tina nini naswana na yo kufa tango?
mobali azali na maboko na ngai
ba familles bakangela ngai ye
sala nionso, buka nzoto, yo se moleki mama
finga, finga, tonga, tonga, ngai se nazali awa
mobali azali mobali na ngai
akoki kobouger ata moke te

okofinga ngai nzoto mobimba otiki ngai ata ndambo te
nasenga epayi na epayi batu banso batala biso, mawa na ngai
mabe na ngai ya nzoto mbanda ozali kofinga kaka na kanda
na se ya motema omiyebi, ozali ata pembeni te oh ya komeka na ngai
kitoko ya mwasi ekokende sango soki mibali bakolula
ya yo kitoko omik*misi nzoto na kati ya ndako yo moko, mawa na yo
la beauté d’une femme ekende sango banda bomwana te tango akoli
na ndenge pe mibali epayi akola batambola moto, ah mama

oyebi mobali tokowela démarche nini asala po akoma na ngai?
dépense nini asala po abattre basusu?
matata nini azua po abala ngai ?
tuna sango mpe bayebisa yo

okofinga ngai nzoto mobimba po naswanisa yo ovimba moto
ngai nabundisa yo po oyebana
sango ekende ngai na yo bombanda
po mobali na ngai asambwa, mama

okofinga ngai nzoto mobimba osilisi ngai na quartier
olati kombo ya mobali na ngai lokola liputa ya métrage, mawa na yo
mabe ya nzoto na ngai mbanda ozali kofinga kaka na zuwa
epayi mosusu ngai nayebi batiaka yo na tout droit na baninga basi
kitoko ya mwasi bakondimaka na ndenge mibali bakolula ye
ya yo kitoko omipesa confiance na talatala ya ndako na yo, mawa mama
la beauté d’une femme se mesure na ndenge bato ya mboka bakok*misa
lokola bak*misa kitoko ya belinda na miami mokili bayoki
oyebi mobali okowela epai nini awuti po adondwa lelo
bapasi nini amona po akoma boye?
moniokoli tozua po akoma na mbongo
po lelo oyo ofingisa ngai?

okowela na ngai bombanda okuti mobali na kati ya bomengo
okolia, okotonda, okofïnga ngai
okonganga partout ngai na yo bombanda
mama sala makasi po boboyana te

instrumental

lirik lagu lainnya :

YANG LAGI NGE-TRENDS...

Loading...