lirikcinta.com
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu tika nionso/bondela/ma victoire – runo moyo

Loading...

totika mik*mba nionso epayi na ye
akopesa biso kimia
totika congo na biso na maboko ma yesu
akopambola pe yango, totika nionso

tika nionso na maboko ma ye
akopesa biso kimia (topesa ye mitema)
tika nionso na maboko ma ye (ba souci na biso minioko nionso)
akopesa biso kimia

tomitungisa pe te pona bomoyi na biso
lobi tokolia nini
tomitungisa pe te pona nzoto na biso
lobi tokolata nini, totika nionso
tika nionso na maboko ma ye
akopesa biso kimia (topesa ye mitema)
tika nionso na maboko ma ye (ba souci na biso minioko nionso)
akopesa biso kimia

tala ndeke na zamba akonaka eloko te
aliaka tango inso
tala matiti na zamba nzambe na yango
alatisaka yango pe

tika nionso na maboko ma ye
akopesa biso kimia (topesa ye mitema)
tika nionso na maboko ma ye (ba souci na biso minioko nionso)
akopesa biso kimia

botala ndeke na zamba alonaka te kasi aliaka tango inso
bongo matiti na zamba nzambe alatisaka yango
ebongo biso na ye tokelela pona nini

esengo ezali na lola
esengo ezali na lola
esengo ezali na lola
esengo ezali na lola esengo eh

esengo ezali na lola
esengo ezali na lola
esengo ezali na lola
esengo ezali na lola
pasi nionso tomonaka awa na mokili
ekotikala se awa na se
tozali bapaya pe baleki nzela
mboka na biso ya seko ezali lola kuna nkembo na nkembo

esengo ezali na lola (ba pasi ya mokili ekotikala)
esengo ezali na lola (déception ekozala te)
esengo ezali na lola (injustice ikele ve)
esengo ezali na lola

ndeko ndimela yesu masiya
y’okozua bomoyi na seko moninga
bisengo ya mokili se pamba zéro
bisengo ya solo ezali se na lola kuna kembo na kembo

esengo ezali na lola (ba pasi ya mokili ekotikala)
esengo ezali na lola (déception ekozala te)
esengo ezali na lola (injustice ikele ve)
esengo ezali na lola

yesu alobaki senga bakopesa yo
beta na ekuke nde bakofongolela yo
bondela na kombo na yesu
bondela na kombo na yesu
longola elikya na yo na bato na mokili
tia elikya na nzambe wana y’okolonga
bondela na kombo na yesu
bondela na kombo na yesu
celui qui est en moi
est plus fort que celui qui dans le monde
je ne craindrai rien
le dieu d’abraham
est plus fort que celui qui dans le monde
je ne craindrai rien
le dieu d’elie
est plus fort que celui qui dans le monde
je ne craindrai rien
le dieu que moi je chante
est plus fort que celui qui dans le monde
je ne craindrai rien

il est ma victoire, ohoo il ma victoire
il est mon rocher, ohoo il est mon rocher
il donne la paix, ohoo il donne la paix
il donne la joie. ohoo il donne la joie

lirik lagu lainnya :

YANG LAGI NGE-TRENDS...

Loading...