lirikcinta.com
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu muzina – tabu ley rochereau

Loading...

muzina
muzina di tata
e di mwana
e di mpeve santu

muzina di tata nzambe oooh, muzina
babotama, bazala, bakufa, balamuka, basekwa ah

basumuki baboya nzambe batala ye mpamba ntango ya bisengo oh
oh
kasi nkombo ya nzambe ezali ya makasi boboto ya yahwe ya
nkembo
bakolimbisa bango
muzinaaaa

muzina di tata, e di mwana, e di mpeve santu

baluka moto na ngai, baluka ngai liwa
bamekola basuka, bamema se mongambo eh

lisolo oyo ya ngai, ekoma mosala
na kati ya lisanga, na bandako na nganga
kofingafinga ngai, kotongotonga ngai
kokanakana ngai, epesa ngai bomoyi

naboma moto te, nateka moto te

nasimba nkisi te, mpo te nazwa bomengo

nzoto nangai nzoto oyo elelela kaka nzambe

nkisi nangai banda bomwana, losambo na yahweh

banso oyo bayeba ngai na bomwana nangai

ntango yango babenga ngai mwana ya basango oh

yebaka ah yebaka, liloba ya nzambe

yeba bisengo ya nse

tangaka, ah tangaka, tangaka bible

yeba bomengo ya nse
muzinaaaa
muzina di tata
e di mwana
e di mpeve santu
muzina di tata nzambe oooh, ya muzina

basoboli bankulu, bopesa biso kisankulu

muzina di tata, e di mwana, e di mpeve santu
muzina di tata nzambe oooh, ya muzina

basantu mpe banzelu, botombola nkombo ya nkolo

muzina di tata, e di mwana, e di mpeve santu
muzina di tata nzambe oooh, ya muzina

yemba yemba ah

yemba yemba ah

boyakani banso mpo toyemba

yemba yemba ah

toyembela nzambe nkolo na biso

yemba yemba ah

tosangana banso mpo boyani

yemba yemba ah

toyembela nzambe nkolo abenisa biso
yemba yemba ah

muzina di tata e di mwana
yemba yemba ah

na nkombo na yesu tokoyemba

yemba yemba ah

na nkombo na nzambe tokosambela
yemba yemba ah
muzina e di tata, e di mwana

afrika mobimba yakani toyemba
yemba yemba ah

toyembela nzambe abenisa mboka

yemba yemba ah

nkombo na nzambe ezali likolo
yemba yemba ah

eloko moko eleki nzambe ezali te oh

yemba yemba ah

baninga ya zaire boyokani tosambela

yemba yemba ah

na nkombo ya nzambe asalisa biso
yemba yemba ah

na nkombo na nzambe tokosambela

yemba yemba ah

muzina di tata e di mwana
yemba yemba ah

botombola maboko mpo na nzambe eh
yemba yemba ah

tobondela ye na motema moko
yemba yemba ah

nkombo ya nzambe ezali monene
yemba yemba ah

nanoi akoki kotiya ntembe na nzambe
yemba yemba ah

yelele, yelele
yelele yelele
ebeba eh eh botombola maboko

bimisa mouchoir, litambala, liputa, ekoti, yembela nzambe

eeeh, yahweh
eh, yahweh

lirik lagu lainnya :

YANG LAGI NGE-TRENDS...

Loading...