lirikcinta.com
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu bruce – fally ipupa

Loading...

bruce, bruce, bruce

eza compét-tion té oyo tozoluka moko a gagner
eza love ya chouchou na chouchou na yé
bruce na chuck norris té
(bruce, bruce, bruce)
eza pé combat ya boxe té oyo tozoluka moko a ceder
eza love ya cheri na cherie na yé
ali na foreman té

ali boma yé
ali boma yé
ali boma yé

yo’botoli nga mino mais opesi nga mokuwa
na fiba okomi lisusu kobotola nga yango
eh eh pourquoi adolphe muteba
boni yo ozo sala lokola olingaki nga po o prouver bato
osilisi nga lolendo nionso ya ki bomuasi na nga
avenue coin ti coin naleka bazo zomela ngai
okomisa nga papier, kimpwaka kutu bien

lukela nga esika nabatama soni omemisi ngai
soki na mayi nabetelaka ba mbisi lisolo
ya bolingo na biso avant ba lala
mpo na zamba lion akondima té
noki té lisolo na nga elelisa yé
ba niama bakobanga yé lisusu té
na mboloko akobanda koboudé yé
yé roi mobimba atangisi pinzoli
bayebi té lion azolela po lionne akoki ‘osala yé pé bongo
oh adolphe muteba tshilamwina
lukela esika nga nakobombama soni oyo
na likolo ba ndeke bakoloba na yé ko espionner bango
na mabelé makelele bakoyebisa ba nkusu bazui chida
nzoka naza vivante
babombaki nga pona kokima soni ya mokili
après babosani tranche epayi bakundaki
ngai yango ngai nakeyi na nga

african james bond, dj droba on est ensemble

ata kutu virus, balukela yango antivirus
moto asala bolingo nzambé mais apesa biso mode d’emploi té
yango tozelaki yesu aya ‘bala po biso to mona
lolengé ya ko vivre na bolingo
yé pé nkolo yesu abalaki na yé té
yango tokoma ko tatonner eh
yango tokoma ko débrouiller eh
ezui ezui, ezui té ezui té

mungwa ata ebungi e noyer na bileyi
etikaka b’indices, ba traces na lolémo
mais yo banda yo olimwa ata indice té na nzoto
na miso disparu, wa wa wa
sans le savoir que ezali liwa na nga (x2)
liwa ya moto…

adolphe awa okomi oluka okima nga
mbeto ekokomela nga munene lokola stade ya football
santé na nga ekokoma muke lokola ballon
butu ekokomela nga molayi pé somo trop
yo moto o réduisaka souffrance ya vie na nga oza wapi yango
adolphe mutebe tshilamwina
nalingaka yo, oyebi yango bien
nabengaka yo chouchou ya motema
pourquoi ozosala nga boyé adolphe
napesa yo bolingo nabakisa matabisi ya vie na nga
sango ata aza boboto mais soki apesi communion
longola makanisi ya kosenga matabisi

na beleli, beleli, beleli, beleli, beleli na bayé bakufa kala
bayé bakufa na b’accidents
bayé bakufa na malaria
bayé bakufa na masasi
bayé bamiboma po na mbongo
basengela biso epayi ya yahweh
po bango bavandaka pene na yé
ameka ko réduire douleur ya bayé bakufaka na pasi ya bolingo
po aloba bolingo eza yé
nzambe azali bolingo, nzambe azali bolingo

ata kutu virus, balukela yango antivirus
moto asala bolingo nzambé mais apesa biso mode d’emploi té
yango tozelaki yesu aya bala po biso to mona
lolengé ya ko vivre na bolingo
yé pé nkolo yesu abalaki na yé té
yango tokoma ko tatonner eh
yango tokoma ko débrouiller
eh,ezui ezui,ezui té ezui té

adolphe pourquoi ozosala boyé muteba
mungwa ata ebungi e noyer na bileyi
etikaka b’indices, ba traces na lolémo
mais yo banda olimwa ata indice té na nzoto
na miso disparu,wa wa wa
sans le savoir que ezali liwa na nga(x2)

lirik lagu lainnya :

YANG LAGI NGE-TRENDS...

Loading...